Lingua   

Nakomitunaka

Verckys et l'Orchestre Vévé
Lingua: Lingala


Verckys et l'Orchestre Vévé


Aeee nakomitunaka eee ‎
Aeee nakomitunaka eee ‎
Nzambe o nakomitunaka oo
Nzambe o nakomitunaka oo
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Koko na biso ya kala, ye nani ‎
Yesu mwana ya nzambe ye nde mundele ‎
Adamu na eva bango nde mindele ‎
Ba santu nionso bango pe mindele ‎
Pona nini o ‎

Aeee nakomitunaka eee ‎
Aeee nakomitunaka eee ‎
Nzambe o nakomitunaka oo
Nzambe o nakomitunaka oo
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Babuku ya nzambe tomonaka boye ‎
Ba santu nionso photo se mindele ‎
Ba angelu nionso bango se mindele ‎
Soki zabulu photo moto moyindo ‎
Injustice ewuta wapi ‎

Aeee nakomitunaka eee ‎
Aeee nakomitunaka eee ‎
Nzambe o nakomitunaka oo
Nzambe o nakomitunaka oo
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Ba noko ba kanga biso mayele boye ‎
Bikeko ya bakoko bango baboyaka ‎
Kisi ya bakoko bango badimaka te ‎
Kasi na ndako ya nzambe biso to monaka ‎
Tokosambela chapelet na maboko ‎
Tokosambela bikeko bi tondi ndako ‎
Kasi bikeko yango se mindele ‎
Pona nini nzambe ‎

Aeee nakomitunaka eee ‎
Aeee nakomitunaka eee ‎
Nzambe o nakomitunaka oo
Nzambe o nakomitunaka oo
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Ba prophete ya mindele biso to ndimaka ‎
Kasi ya bato moyindo bango ba ndimaka te ‎
Pona nini nzambe osalaka biso boye ‎
Africa miso efungwani ‎
Africa to zonga sima te ‎

Aeee nakomitunaka eee ‎
Aeee nakomitunaka eee ‎
Nzambe o nakomitunaka oo
Nzambe o nakomitunaka oo
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Mposo moyindo ewuta nde wapi
Koko na biso bato moyindo azali wapi ‎



Pagina principale CCG

Segnalate eventuali errori nei testi o nei commenti a antiwarsongs@gmail.com




hosted by inventati.org